LetsSingIt the internet lyrics database
en
0
picture

"Loboko" Lyrics

4.2 / 5
Song updated, review now!
Loboko na yo

(Chorus:)
Loboko na yo ekamwisaka ngai
Ata na tango'a pasi
Ako tika ngai te
Nionso na ko sala
Alongisaka ngai
Po ye azali Nzambe, Nzambe na bolingo (x4)

Ayoyo ngai
Na luli loboko na yesu
Loboko na nguya
Loboko oyo ekangolaka

Oyo'ekotaka bisika ya moto ekomaka te
Ayoyo ngai, na sanzoli loboko na ye
Ah ye ngai, mokakatani ya beteza
Nani a bwaka ngai
Na wumeli pene na mayi oh

Ayo yo yo, mutu na mutu na ndeko na ye oh
Nani a bwaka ngai, Na wumeli pene na mayi oh
Tango Yesu a ye, betesta ya bomoyi na ngai
Na moni mayi te na nzoto, a lobi na tambola pe na kende
Ngai, Ngai na zwami na loboko oyo eh
Oyo etikaka te ba beli ba zonga na maladi, alelujah

(Chorus) x2

Epayi na yo, na moni bolingo ya solo
Bolingo ya Nzambe
Oyo' akata na mwana na ye
Oyo e simbaka ata ngai na zangi makasi
Epayi na yo na tatoli bolingo ya solo

Aye ngai, pa no yo mwasi mokanana
Nani asunga ngai, na wumeli kati na pasi
Eh yahwe yahwe moto na moto na ecurie na ye
Nani asunga ngai, na zangi nzembo yako yemba
Tango Yesu aye, lisekwa ya bomoyi na ngai oh
Na simbi Yesu na liloba, na ndimi ako yoka, pe ako yanola
Ngai, Ngai, na zwami na loboko oyo eh,
Bileyi ya bana na bato, lelo ba pesi na ngai mbwa eh baba

(Chorus) x2
(eh baba) repeat

Oh loboko oyo
Oyo ekangolaka ngai
Oyo ebikisaka ngai oh oh, na kata na pasi
Oh loboko oyo
Loboko na nguya
Loboko na ngolu
Loboko na nkembo
O kangola loboko
Oh Yesu oyo
E kangola nga
Ekangolaki Mose
Oh loboko oyo
Ekamwisaka ngai
Oh loboko oyo
Epesaka elonga
Oh loboko oyo
Ekangolaki mayi
Oh loboko oyo
song info:
Verified yes
Language
Genre
Duration00:06:07
Charts
Copyright ©
Writer
Lyrics licensed byLyricFind
AddedFebruary 28th, 2010
Last updatedMarch 6th, 2022
About

Album Details

Video

Songs you may also like

L'or Mbongo
Similar genre
Popular on LetsSingIt
New on LetsSingIt
show all L'or Mbongo songs
show more songs with similar genre
show this week's top 1000 most popular songs
show all recently added songs

Contributors

leaderboard
activity

Comments (0)